Misala ya boluki na ya ba sango ya British Red Cross ya mikili ekoki kosalisa yo. Tosalaka na mikili po na kokutisanaka mabota soki bandeko bapanzanaki na bitumba, na mobulu ya bokonzi, na likama to na mobembo. Soki okabuani na libota na yo, tokoki kosalisa yo.
British Red Cross ekoki kasalisa ne ndenge oyo:
Lisalisi nionso ezali ofele be ya kobombama
British Red Cross bakoki pe kosalisa na tango misusu esengeli lisalisi yo bo moto, ndakisa, soki na mbalakata ozangi sango ya ndeko mubange ya poto.
Soki okanisi tokoki kosalisa, yela biso
Mokambi ya British Red Cross akosepela kooka motuna na yo na esengo
Soki oyebi lopoto te, okoki koya na moto mokolo, ndeko, moninga to molongani po asalisa yo.
Pe tokoki komeka kopesa yo molinboli. Tokoki kosalisa ya po na kokoma na kasa
Tokotinda sango oyo na Lingomba ya Red Cross to Red Crescent ya mboka okanisi ba ndeko na yo bazali, to na Lingomba ya Red Cross ya mikili (ICRC) po baluka bango. Makoki ya koluka bato ekesenaka likolo ya makombo pe na kimia na mboka wana.
Tango tokozua sango po na yo, tokobenga yo, kasi tokoki koyebisa yo te sima ya mikolo boni.
Contact your nearest Red Cross Office |